Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Président ya Haïti Jovenel Moïse akufi na masasi mpe mwasi na ye azoki makasi


Jovenel Moise président ya Haïti abomami na masasai na mboka na te le 7 juillet 2021
Jovenel Moise président ya Haïti abomami na masasai na mboka na te le 7 juillet 2021

Président ya Haïti, Jovenel Moïse, akufi mpe molongani wa ye azoki makasi na masasi bato baike babeti bango na ndako na bango.

Ministre ya mambi ya kati ya mboka ya Haïti nde apesi sango yango mpe akebisi ete mboka ezali na likama lya basimba minduki.

Maison Blanche to ndako ya bokonzi ya Etats-Unis epameli bobomi boye.

Ezali mpasi mpe mawa eyebisi molobeli ya mbulamatari ya Etats-Unis, Jen Psaki.

Molobeli ya mbulamatari alaki lisungi ya Etats-Unis na bakonzi ba Haïti soki bolukiluki bosengeli kosalama.

Kino sika, bato babomi président Jovenel Moïse na molongani wa ye bayebani te.

XS
SM
MD
LG