Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump abiki nsima na kosambisama mpe akoki lisusu kopesa nkombo na maponami makoya


Donald Trump, mokonzi ya kala ya USA alakisi journal ekomi "Atikami" na Washington, 6 février 2020.
Donald Trump, mokonzi ya kala ya USA alakisi journal ekomi "Atikami" na Washington, 6 février 2020.

Donald Trump abikisami na bosambisami bwa ye na Sénat (Empeachment). Motango ya ba Sénateurs basengeli mpo na bokitisami bwa ye o’likambo mokokaki te, samedi, mpo na kokitisa ye o’likambo.

Ba Sénateurs 57 likolo na 100 nde baponaki mpo akitisama o’likambo kasi mobeko mosengi motango mwa 2/3 (75) mpo na yango esalama.

“Mosala mwa biso ya kitoko, ya kotikala na lisolo mpe ya bolingo ya mboka: 'Make Ameica Great Again' (Komisa Amerika monene lisusu) ebandi kaka kobanda,” eyanoli M. Trump na liyebisi.

M. Trump apameli baike koluka nde moto na ye.

Ekomi mbala ya mibale ete M. Trump along ana bosambisami na Sénat.

Na mibu 74, M. Trump apesi elaka na bana ba Amerika.

“Na ba sanza ekoya, nazali na makambo mingi ya kokabola na bino mpe naliingi kokoba nzela naponaki mpo na bonene bwa Ameika,” alaki.

M. Trump afundamaki mpo na balandi baye basalaki eyoma le 6 janvier na Capitole mpo na komeka kopekisa Congrès kondima elonga ya Joe Biden.

M. Trump atikala kondima te elonga ya M. Biden.

XS
SM
MD
LG