Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Démocrate mosusu afundi Trump mpo na eyoma na Capitole


Mokonzi ya kala ya Amerika Donald Trump na Orlando, Floride, 28 février 021.
Mokonzi ya kala ya Amerika Donald Trump na Orlando, Floride, 28 février 021.

Démocrate mosusu afundi na bazuzi Donald Trump, mokonzi abimi na bokonzi, mpo na eyoma balandi ba ye basalaki na Congrès. Ekomi bofundami ya mibale nsima na M. Trump kobika na bosambisa na Sénat ("empeachment").

Eric Swalwell, mokeli mibeko ya chambre ya représentants aponama na Califonie, afundi M. Trump, mwana wa ye Donald Trump Jr., masambeli wa ye Rudolph Giuliani mpe moko na ba républicain ya Chambre, Mo Brooks baye bazwaki malabo na milulu mokonzi ya kala asalaki yambo bato basala eyoma na Capitole.

Mpo na M. Swalwell M. Trump bato banso afundi nde batindaki baton a eyoma.

Bato mitano bakufaki na eyoma yango.

Moko na balobeli ba M. Trump ayanoli na Washington Post ete M. Swalwell azali mpamba mpe bakondimela ye te.

Mokeli mibeko mosusu ya ba democrats, Bennie Thompson afundaki mpe M. Trump na kati ya sanza ya mibale.

M. Trump asambisamaki na Sénat mpo eyoma yango kasi akweyisamaki te o'likambo nsima na ba Sénateurs kopona.

Jeudi, bokengi botiamaki lisusu makasi nzinga nzinga na Capitole, na Washington, mpo sango ete balandi ba M. Trump balingaki kotia ye na bokonzi na makasi. Kala ezalaki na mokolo yango nde bovandisami ya molongi ya maponami nde azalai kovandisama na ebonga. Kasi ebongoloma.

XS
SM
MD
LG