Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Policier azwi etumbu ya liwa mpo na koboma mokumbi tukutuku na Kinshasa


Ba policiers bakangi moto moko na Goma, RDC, 27 décembre 2018.
Ba policiers bakangi moto moko na Goma, RDC, 27 décembre 2018.

Tribunal ya garnison ya Gombe ekateli Jean-Bosco Kalambayi Kayembe etumbu ya liwa mpo na koboma mokumbi tukutuku o’mokolo mwa yambo ya mposo.

Misala ya bosembo misambisaki ye na lolelnge ya lombango na boulevard Triomphal na Kasa-Vubu.

Mokambi ya police ya Kinshasa, Commissaire divisionaire Sylvano Kasongo ayebisaki VOA Lingala ete etumbu ekopesama, ekozala ndakisa mpo ba pulusu basusu.

Mikolo misato milandamaki uto lundi, ba civils basato bakufaki na masasi ya ba policiers. Bakumbi tukutuku babale, lundi na mardi; mpe mokambi ya lopitalo Vijana, mercredi.

Na bosambisami boye, policier Kalambayi azwi mpe lisusu etumbu ya kofuta misolo 100.000 ya ba dollars US mpo na mbeba.

Policier mosusu, Ilunga Mwamba atikami.

Etumbu ya liwa epemisama na mobeko ya RDC uto 2003. Ebongolamaka na boloko ya seko.

XS
SM
MD
LG