Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

PCT eza na Congrès yambo ya maponami ya 2021 na Congo-Brazzaville


PCT, Parti du travail ya président Denis Sassou N’Guesso efungoli vendredi Congrès ordinaire na yango ya mitano yambo na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021, Brazzaville, 27 décembre 2019. (Thierry Moungalla)
PCT, Parti du travail ya président Denis Sassou N’Guesso efungoli vendredi Congrès ordinaire na yango ya mitano yambo na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021, Brazzaville, 27 décembre 2019. (Thierry Moungalla)

PCT, Parti du travail ya président Denis Sassou N’Guesso efungoli vendredi Congrès ordinaire na yango ya mitano yambo na maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021.

"Ezali mokumba ya PCT ya komema bana ya Congo kokisa ndoto na bango ya société moko démocratique, développée, esika wapi ezali malamu kovanda," elobi kalaka mokonzi ya PCT, Pierre Ngolo.

Congrès eye ekozala mpe libaku ya kopona kalaka mokonzi mosusu ya PCT.

M. Goto, oyo azali na mibu 65, akoki te kowolela lisusu ebonga eye.

Nzokande, na ngaombo na yango, UPADS (Union panafricaine pour la démocratie sociale), lisanga ya politiki ya opposition na Congo-Brazzaville, esengi maponami ya mokonzi ya mboka ya 2021 mapusama kino 2023 mpe président Denis Sassou N’Guesso azala te na maponami mango.

Bitluku ya balandi ya lingomba liye bawuti bituka inso ya Congo-Brazzaville mpe basusu bawuti lipanda na mboka, mingi mpenza na France, bazali na Congrès ya PCT.

Mangomba ya mboka ya bapaya mpe mazali kuna lokola MPLA (Mouvement populaire pour la libération ya Angola) to FPR (Front patriotique ya Rwanda) mpe ba Partis communistes chinois na ya Cuba.

XS
SM
MD
LG