Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etat d’urgence na Congo-Brazzaville mpo na mpela


Ndako ebukani mpo na mpela na Makelele, na Brazzaville, 10 décembre 2012.
Ndako ebukani mpo na mpela na Makelele, na Brazzaville, 10 décembre 2012.

Bakonzi ya Congo-Brazzaville basakoli état d’urgence mpe état humanitaire na komona ete koleka bato 50.000 bazwi mpasi mpo na mpela nzinganzinga na ebale ya Congo.

Ba localités bizali nzinganzinga ya ebale Congo nde ezwi mpasi mingi, elobi molobeli ya mubalatari Thierry Moungalla.

Nkasa ya sango Dépêches de Brazzaville esakoli ete bato basato bakufi nsima na kozinda na mayi.

"Biloko mpe makoki ebele ebebi lokola bilanga, bibwele, soso, mabata mpe ndeke esusu, biloko bibombamaki," elimboli ministre Moungalla.

"Bakono mingi mpe bongali," ebakisi M. Moungalla.

"Nakomona bonene ya likambo, mbulamatari ya ekolo esakoli état ya catastrophe naturelle mpe ya urgence humanitaire na bituka ya Likouala, ya Cuvette (nord) mpe ya Plateaux (centre)," eyebisi M. molbeli ya mbulamatari.

Na ekolo Congo démocratique, na ngambo, bakonzi mpe basungi basakolaki o’mokolo mwa mitano moleki "lisali monene" mpo na koleka bato 300.000 bazwi mpasi na mpela mpe bomati ya mayi ya Ubangi mpe mbula (manoka).

XS
SM
MD
LG