Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Pasteur moko azwami na  Ebola na Goma


Basali ya bokolongono bazali kopesa mangwele ya Ebola na Nord-Kivu, photo ebimisi le 14 juillet 2019. (Twitter/Tredos Adhanom Ghebreyesus)
Basali ya bokolongono bazali kopesa mangwele ya Ebola na Nord-Kivu, photo ebimisi le 14 juillet 2019. (Twitter/Tredos Adhanom Ghebreyesus)

Moto mwa yambo na bokono ya Ebola Ebola azwami o’mokolo ya eyenga na Goma, na Nord-Kivu.

Kolanda liyebisi ya ministère ya Santé, ezali Pasteur moko akendeki o’mokolo ya minei na Butembo mpo kasambela mpo na bato na bokono kowuta na Bukavu, na Sud-Kivu.

Atandelaki bango maboko mpe kati na bango ezalaki na babeli ya Ebola.

Mosali na Nzambe oyo azuwamaki na na bilembo ya Ebola na bozongi bwa ye ntango ayokaki mwa nkwankoso na nzoto na nsima kokoma na Goma epayi wapi alukaki lisungi.

Bakambi ya etuka mpe ya misala ya bokolongono basali nyonso mpo ete bazongisa ye na Butembo.

XS
SM
MD
LG