Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Pene na 300 miliciens na mokonzi na bango batiki minduki na Fizi


Ndambo ya ba Maï Maï na Fizi, Sud-Kivu, 11 décembre 2003.
Ndambo ya ba Maï Maï na Fizi, Sud-Kivu, 11 décembre 2003.

Pene na 300 miliciens baye babengami "Mtetezi" (bakoteli, na Swahili) na mokonzi na bango Ebuela wa Seba batiki minduki mpe bamipesi na maboko ya bakonzi, na Fizi, na Sud-Kivu.

"Tosengaki alternance mpe tozuwi yango. Tozuwi mokonzi ya mboka ya sika. Tobanda makambo ya sika mpo na kotonga ekolo," elimboli Ebuela wa Seba.

Mokambi ya ba "Mtetezi" elongo na lingomba na ye bazalaki banda 2007 kokonza na bitando ya Fizi mpe Mwenga. Basalaki bitumba na Baraka, Mukera, Mboko mpe na Kilembwe.

Batu ya bokengi balobi ete azalaki mokambi ya mibale ya batomboki na Fizi, nsima ya Yakutumba, motambwisi ya moko ya mangomba ya ba Maï Maï.

M. Ebuela apesi mpe mbela na na basimba minduki misusu mpo batika mpe minduki.

XS
SM
MD
LG