Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etienne Tshisekedi aza "Moïse", Félix Tshisekedi nde "Josué", mpo na Mgr Gerard Mulumba


Moto moko ameni photo ya Etienne Tshisekedi na misa ya bokundoli mibu mibale ya liwa ya mokambi ya UDPS, na cathédrale notre Dame, na Kinshasa, le 1 février 2019.
Moto moko ameni photo ya Etienne Tshisekedi na misa ya bokundoli mibu mibale ya liwa ya mokambi ya UDPS, na cathédrale notre Dame, na Kinshasa, le 1 février 2019.

Na misa miselemaki vendredi na cathédrale notre Dame du Congo ya Lingwala na Kinshasa mpo na mibu mibale ya liwa ya Etienne Tshisekedi, Mgr Gérard Mulumba, atalisi mowei lokala "Moïse" mpe mwana ya nkondo, Félix Tshisekedi, lokola "Josué".

Etienne Tshisekedi, opposant ya ntango molayi na mboka RDC, akokisi mibu mibale banda akufaki le 1er février na Bruxelles, na Belgique.

Mgr Mulumba, oyo azali ndeko ya mowei, nde akambaki misa liye. Félix Tshisekedi mokonzi ya sika ya RDC oyo abimi na maponami ya le 30 décembre 2018, azalaki na milulu maye na basungi na ye ya politiki, na baye ya UDPS, lisanga ya politiki ya tata na ye, mpe na libota na ye.

Na mateya na ye, Mgr Mulumba akokanisi lisolo ya mboka RD Congo na oyo ya bana Israël ntango bawutaki na Egypte mpo na kokende na mabele ya elaka.

Mpo na ye, Etienne Tshisekedi azali "Moïse" oyo abimisaki Israël na bowumu, Félix Tshisekedi nde "Jousé" oyo akitisi yango na mabele ya elaka.

Nzoto ya Etienne Tshisekedi ezali kaka kino lelo na morgue na Belgique likolo ya kobendana kati gouvernement ya Joseph Kabila, UDPS parti ya mowoei mpe libota na ye.

Etienne Tshisekedi abundaki na bokonzi ya Mobutu mpe ya ba Kabila, tata mpe na mwana, kino akufaki. Azalaki moko ya ba 13 parlementaires oyo bapamelaki président Mobutu Sese Seko na 1981 mpe basalaki lingomba UDPS oyo akambaki kino liwa na ye.

Atiyamaki lokola Premier ministre ministre mbala misato na ntango ya président Mobutu kasi asalaki mpenza te mpo na boswani na mokonzi ya mboka.

Etienne Tshisekedi akufaki na 85 ans kasi akotaki te ye moko na bokonzi lokola président.

Félix Tshisekedi mwana na ya nkondo mokambi ya UDPS akomi mokonzi ya mboka na nsima ya maponami ya le 30 décembre.

XS
SM
MD
LG