Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi azuwi bokonzi


Président Joseph Kabila, mokonzi oyo atiki ngwende apesi bilembo ya bonkonzi na Félix Tshisekedi mokitani na ye na libonga ya président ya république, na milulu masalemi na etando ya Palais ya nation, na Kinshasa, le 24 janvier 2018.
Président Joseph Kabila, mokonzi oyo atiki ngwende apesi bilembo ya bonkonzi na Félix Tshisekedi mokitani na ye na libonga ya président ya république, na milulu masalemi na etando ya Palais ya nation, na Kinshasa, le 24 janvier 2018.

Félix Tshisekedi azuwi bokonzi na nsima ya kolapa ndayi liboso ya Cour constitutionnelle na Palais de la nation o’mokolo ya mitano na Kinshasa.

Félix Tshisekedi akomi bongo mokonzi ya mitano ya mboko RDC na nsima ya milulu maye.

Cour constitutionnelle endimaki ete alongi maponami na 38,27%.

Président Joseph Kabila, mokonzi oyo azali kobima na bokonzi apesi bilembo ya bonkonzi lokola mobeko likonzi mpe bendele ya mboka.

Cour constitutionnelle emopesali ba aramoiries (bilembo) ya mboka.

Mpe mapinga babetaki lokito tuku mibale na moko.

Na lisikulu na ye, Félix Tshisekedi apesi losako na mokonzi Joseph Kabila oyo atiki bokonzi, apesi mpe lisusu losako na Laurent-Désiré mpo na ndayi na ye ya koteka mboka ata mokolo te.

Mpe na Etienne Tshisekedi mpo na bitumba na ye mpo na democratie na mboka.

Mokonzi ya sika ya RDC mpe apesi losako na baye balongi te. Alobi Martin Fayulu azali moninga na ye mpe makasi na ye na bitumba ekosunga mboka.

Ndenge moko mpo na Emmanuel Razani Shadary oyo alobi ete bazali na bolingo moko mpo mboka.

"Bokasi mpe elonga ya mboka evandaka likolo ya boyokani mpe ya bolimbisani, elobi Felix Tshisekedi, na lusikulu na ye ya yambo nsima na bozuwi bokonzi.

Kasi azwaki mwa mpasi kati na lisikuli na ye mpe azongelaki koloba mwa ntango moke nsima.

XS
SM
MD
LG