Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mwa ntembe mpo na maponami na Yumbi le 31 mars


Ndako ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, décembre 2018. (Monusco)
Ndako ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) na Yumbi, Maï-Ndombe, décembre 2018. (Monusco)

Mwa ntembe mozali mpo na maponami na mokolo ya le 31 mars.

Vice-ministre ya Intérieur, Basile Olongo alobaki yango nsima ya bokutani kati na CNSA, CENI mpe ministre na ye.

Ndenge moko mpe, directeur ya Bureau conjoint ya Nations unies ya makoki ya bomoto, Abdoul Aziz Thioye alobi ete kosala maponami na Yumbi, na etuka ya Maï-Ndombe, na ndenge makambo mazalina mokolo ya lelo ekozala na nkwokoso mingi.

Bato ebele, pene na 9.000 bakimaki Yumbi nsima ya bobomani ya bato koleka 535 na bitumba kati na Batende na Banunu, le 17 ti le 18 décembre 2018.

Rapport ya ONU elobaki bitumba liye bikoki kozala mbemba ya bobomi bato ebele to crime contre l’humanité.

Babundi bakati nzoto ya mibali, ya basi, bilenge mpe bana mike ya basi. Babakwaki bibembe misusu na mai, na etuka ya Maï-Ndombe.

Kolanda rapport ya ONU, Batende baboyaki bokundami ya nkumu ya Banunu mpe babomaki bango.

XS
SM
MD
LG