Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis ezuwi miko likolo ya Nangaa, Minaku, Lwamba Bintu mpo na maponami


Mokambi ya Commission électorale nationale indépendante, Corneille Nangaa na bureau na ye na Kinshasa, le 4 avril 2018.
Mokambi ya Commission électorale nationale indépendante, Corneille Nangaa na bureau na ye na Kinshasa, le 4 avril 2018.

Gouvernement ya Etats-Unis epekisi bakonzi ya CENI, président ya Assemblée nationale mpe président ya Cour constitutionnelle kokota na mabele ya Amerika mpo na corruption (kaniaka) ntango ya maponami mpe kobebisa processus ya maponami na RDC.

Kolanda mokana département d’Etat ebimisi vendredi, Corneille Nangaa, Président ya Commission électorale nationale indépendante (CENI); M. Norbert Basengezi Katintima, vice-président ya CENI; M. Marcellin Mukolo Basengezi, conseiller ya président ya CENI; M. Aubin Minaku Ndjalandjoko, président ya Assemblée nationale; mpe M. Benoit Lwamba Bindu, président ya Cour constitutionnelle bapekisami kokota na Etats-Unis.

Secrétaire d’État ya Etats-Unis alobi, na liyebisi liye, ete bato baye bazwamaki kati ya kaniaka monene na processus ya maponami.

Mabota na bango mpe ekoki te kokota na Etats-Unis.

"Secrétaire d'État epekisi mpe visas na ba fonctionnaires électoraux, mpe na bakonzi ya mampinga na ya gouvernement baye bazali soupçonnés kozala responsables, complices ou auteurs ya ba violations ya droits de l'homme, d'atteintes to kobebisa processus démocratique na RDC," elobi liyebisi liye.

Etats-Unis eyebisi été ezali kopesa maboko na ba naya RDC nsima ya passation historique ya bakonzi.

Mpo na bakonzi ya Amerika, maponami maye matilsi bolingo ya bana Congo mpo na mbongwana mpe na ba isntitutions reposnbales.Kasi botambwisi mpe pole ya processus électoral ebendi préoccupations légitimes nzike, elobi liyebisi.

Ba résultats ya maponami ya CENI maye Cour constitutionnelle endimaki, masakolaki Félix Tshisekedi molongi.

Kasi ba episkopo balobaki ete ba résultats maye makokani te na bosolo ya maponami. Mpe Martin Fayulu, candidat mosusu ya opposition, aboyabi mokano ya Cour constitutionnelle mpe amisakolaki président élu.

XS
SM
MD
LG