Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Leila Zerrougui na Tshisekedi basololi nsima na mbela ya Guterres


Mokambi ya Monusco Leila Zerrougui na bokutani na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 7 juin 2019. (Présidence/RDC)
Mokambi ya Monusco Leila Zerrougui na bokutani na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, RDC, 7 juin 2019. (Présidence/RDC)

Leila Zerrougui, molakisi elongi ya kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres, akutanki na président Félix Tshisekedi na Kinshasa.

Bokutani na bango bolandi bokebisi ONU esalaki mpo na matata RDC ezali na yango.

"Mpo na biso, ba Congolais nde basengeli kopona ndenge nini balingi kokamba ba instutitions na bana. Eloko moko kaka etungusi makanisi ma biso ezali ete makambo ya boye mawumela te mpo soki ewumeli ekosala ete nkwokoso mpe ewumela," elobi Mme Zerrugui nsima na bokutani na ye na M. Tshisekedi.

"Bayi politiki bazali banguna te, kasi bayi ngambo na ngambo. Bitunga bisengeli biepkisama. Politki ekoki kosalama te na bitumba," ebakisi Mme Zerrugui.

Bobandeli ya mandat ya MONUSCO yambo na le 30 décembre ezalaki kati na masolo ya mokonzi ya mboka na Mme Zerrougui, eyebisi présidence ya RDC.

Nsima na bitumba bingalaki na assemblée o’mokolo mwa yambo, Mme Zerrougui akebisaki ete matata na mboka makoma na esika moto akokoka koboma moto.

Yambo na yango, M. Guterres asengaki, mposo moleki, ete masolo masalama kati na bayi politiki na na kolanda Buku likonzi.

Bosenga ya M. Guterress bokweyaki nsima na boyoki bato M. Tshisekedi asalaki nsima na mposo misato.

XS
SM
MD
LG