Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko akufi na Ebola na Biena (Butembo)


Mosali ya bokolongo moko azali kosunga mokoni ya Ebola moko na centre ya santé moko na Butembo, Nord-kivu, 28 mars 2019.
Mosali ya bokolongo moko azali kosunga mokoni ya Ebola moko na centre ya santé moko na Butembo, Nord-kivu, 28 mars 2019.

Ministre ya Bokolongo Dr. Eteni Longondo asokoli ete moto moko akufi na Ebola na Biena, na Nord-Kivu, epayi wapi bato 70 basusu bazali kolandelama mpo na bazalaki elongo to pene na mowei.

"Ezali mosali bilanga moko ya mwasi, molongami ya moto moko abikaki na virus ya Ebola," elobi ministre Longondo.

Mwasi yango amonanaki na bilembo ya Ebola le 1er février.

Amemamaki na centre de santé ya Biena epayi wapi bazwaki bakila mpe biloko misusu mpo na kotala soki ezalaki nini.

"Makila mango matindamaki na laboratoire ya Butembo. Bielmbo bimonisi ete ezali Ebola," eyebisi Dr. Longondo.

Kolanda maloba ma ministre ma Bokolongo, mwasi yango akufaki na lopitalo ya Matanda na Butembo le 3 février.

Bayi OMS mpe basali basusu ba bokolongo batindami na esinga yango.

Kolanda ministre Longondo bato 70 bazalaki pene na mowei bazali kolandelama.

Bokono bosusu bwa Ebola bosilaki mobu moleki nsima na koboma bato 2.299 na mibu mibale esalaki.

Bato 3.481 nde bazwaki yango mpe 1.162 babikisami.

Ezalaki bokono bwa Ebola bobomaki bato mingi mpe bowumelaki mingi koleka na RDC.

XS
SM
MD
LG