Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Minganga batamboli mpo na kosenga prime ya risque na Bukavu


Minganga batamboli mpo na kosenga prime ya likama, na Bukavu, Sud-Kivu, le 20 mars 2019. (VOA/Ernest Muhero)
Minganga batamboli mpo na kosenga prime ya likama, na Bukavu, Sud-Kivu, le 20 mars 2019. (VOA/Ernest Muhero)

Minganga oyo bafutamaka te prime na bango ya risque (lifuti mpo na likama), balakisaki kanda lya bango na na bukavu. Batambolaki mpe bapesaki bayangeli ya polovensi ya Sud-Kivu mikakatano na bango mpo na makambo etali lifuti liye.

Minganga bayike batambolaki o’balabala ya Bukavu ti epayi ya moyangeli ya embumatari.

Balobi nkanda na bango ezali mpo bafutamaka prime ya risque te.

Minganga basusu bakofutama prime yena kasi bayike bazuwa yango soki mokete.

Kolanda maloba ya moyangeli ya Collectif ya minganga, Dr. Musa Byamungu, ba dokotolo baye bazuwaka prime ya risques te basengi bakonzi ya mboka RDC kolanda liye.

Gouvernement ekoki kotika minganga na kati ya mikakatano ya bozangi lifuti te, elobi Dr. Henri Zigabe.

Minganga baye bapesaki bosenga na bango epayi ya mosungi moko ya mokambi ya etuka ya Sud-Kivu mpo na kotindama na Kinshasa.

Na Sud-Kuvi, bazali minganga koleka nkama mibale nde bafutamaka te prime de risque.

XS
SM
MD
LG