Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Léopards bakweyi na ¼ de finale na Nigeria 46-79


Ba léopards sénior ya basketball ya basi na phase finale ya Afrobasket, Dakar, Sénégal, 11 août 2019. (Facebook/Léopards basket)
Ba léopards sénior ya basketball ya basi na phase finale ya Afrobasket, Dakar, Sénégal, 11 août 2019. (Facebook/Léopards basket)

Afrobasket ya basi… Ba Léopards seniors bakweyisami 46 à 79 liboso ya équipe nationale ya Nigeria, na quarts ya finale ya 24e edition ya championnat ya finale ya ezali kobetama na Dakar na Sénégal.

Basani ya Congo démocratique basukisi awa nzela na bango na compétition eye.

Balongaki se match moko, na Cap Vert, o'mokolo ya misato moleki, na match ya barrage ya koleka na quarts ya finales (78 à 46) liboso ya Cap-Vert.

Nzokande ba Léopards balongaki te ba matches na bango babale yambo.

Bakweyaki liboso ya ba Palanca Negras ya Angola mpe ya équipe nationale ya Mali.

XS
SM
MD
LG