Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya ba Maï Maï Mulangane akitisi minduki na babundi baye 120 na Walungu


Maheshe Simba, mokambi ya ba Maï Maï Mulangane, oyo amibengaka général, akiti minduki mpe amizongisi na maboko ya mampinga FARDC, Walungu, Sud-Kivu, 20 mai 2020. (VOA/Ernest Muhero)
Maheshe Simba, mokambi ya ba Maï Maï Mulangane, oyo amibengaka général, akiti minduki mpe amizongisi na maboko ya mampinga FARDC, Walungu, Sud-Kivu, 20 mai 2020. (VOA/Ernest Muhero)

Maheshe Simba, mokambi ya ba Maï Maï Mulangane, oyo amibengaka général, akiti minduki mpe amizongisi na maboko ya mampinga ya Elokolo Congo démocratique (FARDC) elongo na babundi baye 120 na Shabunda, na Sud-Kivu.

Milulu mya bokitisi minduki ya Maheshe Simba mpe babundi baye 120 mosalaki mercredi na Cishadu, na groupement ya Kaniola, na territoire ya Walungu.

"Nandimi kokitisa minduki mpe nazali kosenga na bato banso kolanda ndakisa na ngai. Baye bazali nanu na zamba mpe balingi kotika minduki te bakokuta mbulamatari liboso na bango," elobi Maheshe Simba.

Na ngambo na ye, ministre provincial ya Intérieur mpe Sécurité ya Sud-Kivu, Lwabanji Lwasi Ngabo alobi esengeli kokamba malamu babundi baye batiki minduki mpo bazonga lisusu te na zamba.

Basi zomi bazali kati na babundi 120 baye bakitis minduki.

Bazongisi minduki 20 mpe masasi 2.000.

T"okokoba kosala mosala elongo na bakonzi ya RDC mpo na kopusana pembeni ya babundi basusu mpe komema bango na kotika minduki: na Ruzizi, Shabunda, Bunayakiri mpe bisika misusu," eyebisi molakisi ya elongi ya MONUSCO, misala mya ONU na RDC na milulu myango.

XS
SM
MD
LG