Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 15 bakufi na likama ya bwatu ba lac Maï-Ndombe


Yumbi, Maï-Ndombe, RDC, le 20 janvier 2019.
Yumbi, Maï-Ndombe, RDC, le 20 janvier 2019.

Koleka bato 15 bakufi mpe mingi misusu bazali komonana te nsima ya likama ya bwatu na lac Maï-Ndombe, elobi bakonzi ya esika yango.

Maire (Mondele mboka) ya Inongo engumba mokonzi ya etuka ya Maï-Ndombe, Cosmos Mbo Wemba, alobi ete likama lyango lisalamaki lundi na mboka Bankay.

"Motango mozali ya bato 15 bakufi mpe minigi misusu bazali komonana te," eyanoli M. Mbo Wemba.

"Bwato yango ezalaki komema bato pene na 30, basi mpe mibali, baye bawutaki kokunda mowei moko na 35 km," elobi Froger Balimba, mopanzi sango ya esika yango.

Kolanda M. Mbo Wemba, eteni ya bwato elongwaki, kasi mopepe makasi mpe eningisaki bwato yango oyo ezalaki ya kala mingi.

Makama mingi masalemaka na lac Maï-Ndombe mpe na mayi mingi misusu na RDC.

XS
SM
MD
LG