Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Pene na bato 200 bakangami na basimba minduki banda septembre na Haut mpe Bas-Uele


Basima minduki bamibongisi mpo na kotelemela ba LRA na Bangadi, na RDC, 18 février 2009.
Basima minduki bamibongisi mpo na kotelemela ba LRA na Bangadi, na RDC, 18 février 2009.

Pene na bato 200 bakangami na basimba minduki banda septembre na Haut-Uele mpe Bas-Uele, elobi OCHA (Misala ya Nations unies mpo na kosalisa bato) na mokanda ebimisi lelo.

"Kati na janvier na septembre 2019, mangomba ya basimba minduki bakangaki ba civils 183 na bituka ya (Haut-Uele na Bas-Uele). Kati na baye bakangaki bana 34 mpe bilenge bazwani. Mangomba masusu ya basimba minduki bayebani te bakangaki ba civils zomi na moko, kati na bango bana 5 na bilenge," ekomi OCHA.

Kabila (éthnies) ebundaka mingi na bituka bibale biye mpe bamboro (ba Peuls baye batambolaka bisika na bisika na bibwele na bango) bazalaka mingi na bitumba na kabila esusu.

Bitumba kati ya kabila biyaki makasi na 2019 mpe bisalaki ete bato bayeba na kobomama ata na bilanga, na wenze mpe bisika bisusu, epakisi OCHA.

Nzokande "Invisible Children" ONG oyo OCHA elobeli, esengi ete molongo etala malamu lolenge na yango ya kosala na lingomba ya ba LRA, batomboki ya Ouganda baye bazalaka na RDC na RCA.

"Invisible Children" etangi te LRA lokola esalaka bokangami ya bato awa.

XS
SM
MD
LG