Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Sénateurs ya Etats-Unis balobi boponi ya Sassou bokembisa bokonzi ya mabe na Congo


Président Denis Sassou N'Guesso na camapgne électorale na Brazzaville, 19 mars 2021.
Président Denis Sassou N'Guesso na camapgne électorale na Brazzaville, 19 mars 2021.

Commission ya boyokani na bikolo bya bapya ya Sénat ya Etats-Unis elobi soki président Denis Sassou N’Guesso aponami lisusu, bokonzi ya mabe bokovanidsa lisusu Congo-Bazzaville.

"Na Congo-Brazzaville, boponami mbala esusu ya président Denis Sassou N’Guesso bovanidsa lisusu makasi moko na makonzi ya mabe mpe ya nkanza na Afrika, ekomi na Twitter Sénateur républicain Jim Risch ya Idaho.

Bayi Commission eye ya Senat ya Amerika baloki esengeli kolandela malamu misala ya bokonzi ya bapengwisi baye bazali kopekisa démocratie.

Bana ba Congo-Brazzaville baponaki o’mwa eyenga eleki.

Président Sassou na mibu 36 na bokonzi, azali kati na ba candidats sambo na maponami mango.

M. Sassou asalaki campagne ya monene mpe makasi koleka mpe elikya ezali ete mbele alongi lisusu maponami mpo na kotikala na bokonzi,

Moko na bayi opposition bazalaki kowela maponami, Guy-Brice Parfait Kolelas akufaki na nsima na komema na France mpo na koluka lisalisi mpo na bokono bwa COVID-19.

XS
SM
MD
LG