Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Guy-Brice Parfait Kolelas amemami na lombango na Paris mpo na COVID-19 kati na maponami


Moponi moko alakisi carte na ye nsima na kopona na Brazzaville. 21 mars 2021.
Moponi moko alakisi carte na ye nsima na kopona na Brazzaville. 21 mars 2021.

Guy-Brice Parfait Kolelas, moko na baye bazali kowela bokonzi na président Denis Sassou N’Guesso, amemami na lombango mpo na kosalisama na Paris na France, kati na maponami masalemaki o’mokolo mwa eyenga.

Minanga bayebisi ete M. Kolelas azwamaki na COVID-19.

"Nazali kobunda na liwa kasi nasengi bino botelema. Bokende kopona mpo na mbongwana," elobi M. Kolelas na vidéo moko.

M. Kolekas akweyaki na meeting na campagne.

Bana ba Congo-Brazzaville bakitaki na ba bureau ya maponami mpo na kopona kati na bato sambo.

Président Sassou azali kati na bango lokola mpe Mtahias Nzon na M. kolelas.

Mokambi ya batali ba Union Africaine, Dileita Mohamed alobi ete maponami masalami na kimya mpe na bonsomi ya baponi.

Bayi mampinga mpe bokengi baponaki mikolo misato mileki kasi bilembo bya bango bikotangama nzela moko na biye bya bato banso.

XS
SM
MD
LG