Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Faure Gnassingbé akomi na Kinshasa mpoe kokutana na Tshisekedi


Mokonzi ya ekolo Togo Faure Gnassingbé ayambami na Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya président Félix Tshisekedi, na libanda ya mpepo ya N’Djili, Kinshas, le 15 mars 2015. (Facebook/Fatshi News)
Mokonzi ya ekolo Togo Faure Gnassingbé ayambami na Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya président Félix Tshisekedi, na libanda ya mpepo ya N’Djili, Kinshas, le 15 mars 2015. (Facebook/Fatshi News)

Mokonzi ya ekolo Togo komi lelo na Kinshasa mpo na kokutana na mokokani wa ye ya Congo démocratique.

Nabokiti na ye na mpepo, Faure Gnassingbé ayambamaki na Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya président Félix Tshisekedi.

Ministre togolais ya Fonction publique, travail, réforme administrative mpe protection sociale okami liboso na ye mpe azelaki ye na libanda ya mpepo ya N’Djili, eyebisi baye nzinganzinga ya présidence ya RDC.

Faure Gnassingbé akokutana na mokokani na ye ya RDC, Félix Tsisekedi, eyebisi baye nzinganzinga ya mokonzi ya mboka Congo démocratique.

Ekozala bongo mobembo wa yambo ya Faure Gnassingbé na RDC banda Félix Tshsiekedi akomaki mokonzi.

XS
SM
MD
LG