Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mbeba ya makoki ya bomoto emati na 10% na septembre na RDC


Bilili ya bobomami ya mokambi ya lopitalo Vijana na Lingawala, Kinshasa. 30 octobre 2019.
Bilili ya bobomami ya mokambi ya lopitalo Vijana na Lingawala, Kinshasa. 30 octobre 2019.

Kotambola likolo ya makoki ya bomoto emati na koleka bilembo 10 to 10% na sanza ya libwa na ekolo Congo démocratique eyebisi Nations unies.

Mokambi ya Bureau Conjoint ya Nations unies mpo na makoki ya bomoto Abdoul Aziz Thioye alobi yango na bokutani na bapanzi sango na Kinshasa.

Mpo na ye, mambi maye masalami kaka na mangomba ya basimba minduki to bantomboki te kasi na baye batiyaka alima mpo na l’Etat, lokola.

Kolanda maloba maye, koleka nkama mitamo ya botamboli likola ya makoki ya bomoto bosalamaki na sanza eleki.

Bilembo ya mbeba ya makoki ya bomoto eselami na baye ya l’Etat bizali tuku minei na libwa mpe oyo etikali nde ya mangomba ya basimba minduki.

Nations unies elobi ete mingi na botamboli likolo ya makoki boye bosalamaki na bisika ya bitumba.

Mokambi ya misala ya Nations unies ya makoki ya bomoto mpe alobelaki bobamani bozali kosalama uto mikolo misato na engumba mokozi ya Kinshasa.

XS
SM
MD
LG