Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

ONU ebeti ntembe ete ADF ekota na lingomba Etat islamique


Général Bernard Commis mokambi ya mibale ya mampinga ya ONU ya Congo démocratique liboso ya basoda ya Monusco bakufa ma bitumba na Beni, Nord-Kivu, 18 novembre 2018. (Twitter/Monusco)
Général Bernard Commis mokambi ya mibale ya mampinga ya ONU ya Congo démocratique liboso ya basoda ya Monusco bakufa ma bitumba na Beni, Nord-Kivu, 18 novembre 2018. (Twitter/Monusco)

Mokonzi ya mibale ya mampinga ya Nations unies na Congo démocratique abeti ntembe ete ADF ekota na lingomba Etat islamique.

"Bazali bato ya eyamba ba musulmans kasi mpo na nga mpe ONU, eloko moko te ezali kolakisa polele ete bamikotisa na Etat islamique," elobi Général Bernard Commis, na bokutani na bapanzi sango na Kinshasa.

"Makambo ebele malobamaki kasi tokoki kondima nanu te," ebakisi mokambi ya mapinga ya Monusco.

Lingomba Etat islamique esakolaki mbala misato ete libomaki basoda ya mampinga ya FARDC na ba civils. na Congo démocratique.

ADF ezali lingomba ya bamuslmans liye lisalaka bitumba na Beni, Nord-Kivu, banda mibu miike.

XS
SM
MD
LG