Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba candidats babale ya FCC mpo ebonga ya mokambi ya Sénat


Bakambi ya masanga ya FCC bandimi, na bokutani na bango, na Kinshasa, 3 juillet 2019. (Twitter/FCC Officel)
Bakambi ya masanga ya FCC bandimi, na bokutani na bango, na Kinshasa, 3 juillet 2019. (Twitter/FCC Officel)

Ba candidats babale ya FCC (Front commun pour le Congo) babimisami mpo na ebonga ya mokambi ya Sénat.

Joseph Kabila, mokonzi ya mboka ya kala mpe mokambi FCC aponi Alexis Thambwe Mwamba, kolanda liyebisi ya coordonnateur ya lingomba liye, Néhémie Mwilanya.

Na ngamgo na yango, AFCD-A (Alliance des forces démocratiques du Congo et Alliés) moko na masanga ya litomba ya lingomba FCC, eponi Bahati Lukwebo.

Mwana mboka Bahati, oyo azali mokambi ya AFDC-A, alobi bobonami na ye ezali mpo ete FCC elonga ata candidat oyo aponami na Joseph Kabila andimami te na bato basusu.

Kasi bakambi ya masanga ya FCC bandimi, na bokutani na bango, boponami ya Alexis Mwamba.

Kati na ba sénateurs 91 ya FCC, AFCD-A ezali kaka na 13.

XS
SM
MD
LG