Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa lya Bénoit Lwamba mokambi ya kala ya Cour constitutionnelle na Belgique


Mokambi ya cour constitutionnelle Bénoit Lwamba Bintu, na Kinshasa, RDC, 19 janvier 2019.
Mokambi ya cour constitutionnelle Bénoit Lwamba Bintu, na Kinshasa, RDC, 19 janvier 2019.

Benoit Lwamba Bintu mokambi ya kala Cour constituionnelle akufi lobi loleki na mibu ntuku motoba na motoba na Bruxelles, na Belgique. Sango yango epesami na liyebisi ya Cour consitutionnelle.

Liyebisi lya Cour constitutionelle lilobi ete abelaki kaka moke. Matanga maye makosalama mikolo mikoya.

Mokambi ya sika ya Cour constitutionelle. Dieudonné Kalubi Dibwa nde atie manzaka na liyebisi lyango.

Benoit Lwamba Bintu atiamaki na ebonga ya 1er president ya Cour supreme ya Justice na 2003 na president ya kala Josepha Kabila ntango ya bokonizi ya 1+4, president moko na ba vice-presidents banei na RDC, nsima na dialogue intercongolais mpo na kosukisa bitumba na mboka..

Na sanza ya sambo ya 2015 nde akomaki mokambi ya Cour constitutionnelle kasi alongwaki na 2020 mpo na kokende kozwa lisalisi.

Botiki mosala mwa ye momemaki mwa nungu nungu kati na zuzi baike ya Cour eye na mokonzi ya mboka

XS
SM
MD
LG