Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Lionel Messi azo'kabwana na FC Barcelone


Lionel Messi, mosani monene ya FC Barcelone asimbi motu na match moko ya UEFA, 16e de finale, na Paris Saint-Germain, na Paris. France, 10 mars 2021.
Lionel Messi, mosani monene ya FC Barcelone asimbi motu na match moko ya UEFA, 16e de finale, na Paris Saint-Germain, na Paris. France, 10 mars 2021.

Lionel Messi na FC Barcelone bakoki te kokisa boyokani na bango mpo atikala na club eye ya Espagne epayi wapi super star oyo alekisi koleka mibu 20.

Lionel Messi atie manzaka te mpo na kobakisi mikolo na contrat na ye na FC Barcelone ata bayokanaki mwa mikolo mileki.

"Lionel Messi akotikala te na FC Barcelone," elobi liyebisi lya club eye blaugrana.

FC Barcelone esakoli ete ata eyokanaki na Lionel Messi "boyokani na bango ekokoka te kotiama na mosala mpo na nkwokoso ya misolo mpe ya misala (mibeko ya Liga espagnole)".

"Ngambo mibale ezali mpenza na mpasi na motema ete mposa ya mosani mpe ya club ekokoka te kokokisama," ebakisi liyebisi.

Na mibu 34, Lionel Messi azwa "Ballon d’or" mbala sambo na FC Barcelone.

Azwa nkeni to ba trophées mbala 34 na club eye.

Sika, esengeli ayokana na club mosusu.

XS
SM
MD
LG