Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

PSG champion ya France, championnat ekatani mpo na COVID19


Basani ya Paris Saint-Germain bazali kosepela elonga na bango na championnat ya France na Parc des Princes, Paris, 18 mai 2019.
Basani ya Paris Saint-Germain bazali kosepela elonga na bango na championnat ya France na Parc des Princes, Paris, 18 mai 2019.

PSG (Paris Saint Germain) elongi championnat ya football ya Ligue 1 ya France lokola momekano moye ya mobu mokami na mbalakaka mpo na COVID19.

Na bomemami ya Neymar, Kylian Mbappé elongo na baninga ba bango basusu, PSG ezwi nkeni ata champion ekomi mpeza na suka te.

Milulu ya bopesi nkeni misalaki na visioconférence.

Conseil d’administration ya Ligue (LFP) epesi nkeni kasi bato bazalaki te.

Ministre ya yambo ya France, Edouard Philippe asakolaki mardi mabongisi ya kofungola mbola, alobaki saison 2019-2020 ya sport (masasno) professionnels ekozonga te.

Ekomi elonga ya libwa ya PSG ya championnat ya France, lokola Marseille. Ba équipes mibale miye mizali nsima na Satint-Etienne oyo ezali na ellonga 10.

PSG na OM nde bakopeta C1 Championnat ya Europe, Ligue des Champions.

Rennes, 3e eza qualifié mpo na tours préliminaires.

Lille, 4e, ekozala na Ligue Europe.

XS
SM
MD
LG