Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Neymar atikali na PSG


Mosani ya ndembo Neymar ya équipe Paris Saint-Germain, na lisano na libanda ya masano Universiade, 3 août 2019.
Mosani ya ndembo Neymar ya équipe Paris Saint-Germain, na lisano na libanda ya masano Universiade, 3 août 2019.

Mobeti ndembo Neymar akotikala na Paris Saint-Germain mpo na nkwokoso kati na masolo ya bozongi na ye na Barcelone esika awutaki, esakoli Reuters.

Nkasa sango nzike miyebisi ete masolo mango makeyi malamu te.

"Na kotala matata mpo na kosilisi bozongi na ye na Barcelone, Neymar ayebisi baye nzinga nzinga na ye ete azwi mokano ya kosilisa eleko eye na PSG," ekomi zulunali "Se queda"​.

Zulunali Mundo Deportivo ya ekolo Esapgne epesi mpe sango se wana moko.

Lelo nde mokolo ya suka ya eleko ba equipes bakoki kosomba to kodefa basani na bikipi misusu.

"Baye Nzinga nzinga ya Neymar bandimi yango : esili," eyebisi ngambo na yango Mundo Deportivo.

Neymar, mibu 27, akomaki mosani ya ntalo koleka na molongo nsima PSG esombaki ye ba dollars milioni 264 mibu mibale mileki.

Neymar atiyaki mingete 51 mpe azalaki na masano 58 na PSG.

XS
SM
MD
LG