Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mobulu kati mpe libanga ya Assemblée nationale


Bakeli mibeko na Assemblée nationale, Kinshasa, RDC, 22 mai 2020. (Twitter/Assemblée nationale RDC)
Bakeli mibeko na Assemblée nationale, Kinshasa, RDC, 22 mai 2020. (Twitter/Assemblée nationale RDC)

Mobulu mosalemi libanga mpe kati na Assemblée nationale na Palais du peuple epayi wapi bakeli mibeko baike, mingi ya ngambo ya CACH ya président Félix Tshisekedi babalusi mpe babuki ba mesa.

Bakeli mibeko baye basali makele mpo likita batambwisi ba Assmblée nationale babengisaki lisalama te.

Bakeli mibeko ba CACH basili kosangisa manzaka ya bakeli mibeko koleka 250 baye bazali kosenga bolongwi ya motambwisi ya Assemblée nationale Jeanine Mabunda na bureau mobimba.

Mpo na bango, FCC ezali lisusu te na motango ya koleka na bakeli mibeko to majorité lokola président Tshisekedi alobaki yango na lisikulu lya ye lya mokolo mwa eyenga.

Kasi bayi FCC bango balobi bazali kaka na majoirté.

O’libanda ya Palais du Peuple police ebetaki molinga mpo na kobengana balandi ba CACH baye bazali kotindika bakeli mibeko ya CACH.

Bapanzi sango baike bazalaki ntango balandi ba CACH, na UDPS, batindikaki Fidele Likinda ya PPRD mpo na kopekisa kokota na Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG