Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ntaganda akosenga bazuzi ya CPI batala lisusu etumbu bakateli ye


Bosco Ntaganda na La Haies, Pays-Bas, 2 septembre 2015.
Bosco Ntaganda na La Haies, Pays-Bas, 2 septembre 2015.

Bosco Ntaganda akosenge bazuzi ya CPI (Cour pénale internationale) batala lisusu etumbu ya mibu tuku misato ya boloko bakatelaki ye o'moko ya minei na Haye (Pays-Bas), eyebisi basambeli baye.

M. Ntanganda oyo abengamaka na nkombo ya Terminator azali motema kimya, eyebisi basambeli baye.

Mokambi oyo ya moko na mangomba basalaki bitumba na Ituri na bambula 2000, azwaki o’mokolo ya minei na Haye (Pays-Bas) na CPI (Cour pébale internationale) etumbu ya makasi koleka, eyo tribunal eye nanu ekatela moto te wuto ebanda.

Basembeli baye bazali bna mikolo tuku misato mpo kosenga bazuzi kotala lisusu likambo yango.

Bosco Ntanganda afundama mpo na mbeba ya ntango ya bitumba mpe mbeba ya bomoto lokola na kozuaka basi na makasi, koboma bato mingi, kobengana bato na bisika na bango mpe makambo misusu ya mabe.

Bakambi basusu mpe ya mangomba ya basimba minduki bazwaki etumbu mpo na Ituri. Lokola Thomas Lubunga, moto ya yambo ya kokangama na CPI

XS
SM
MD
LG