Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kenneth Kaunda, mokonzi wa yambo ya Zambie akufi


Kenneth Kaunda, mokonzi ya kala ya Zambie na likita lya SADC na Winhoek, Namibie, 14 juin 2010
Kenneth Kaunda, mokonzi ya kala ya Zambie na likita lya SADC na Winhoek, Namibie, 14 juin 2010

Kenneth Kaunda, mokonzi wa yambo ya Zambie akufi na mibu 97 na mboka na ye nsima na kokota lopitalo mikolo misato mileki.

Mbulamatari ya Zambie etie matanga ya mikolo 21 nsima na kosakola liwa lye.

M. Kaunda akotaki lopitalo mikolo misato mileki.

Bakonzi ya bikolo mingi batindi maloba ya kobondisa mitema ya bana ba Zambie.

"Na motema mpasi nayoki sango ya liwa lya bokulka Keneth Kaunda, tata ya lipanda ya Zambie… Ezalaki elongi ya panafricanisme mpe moko bato ba suka batikalaki na bitumba ya kosikola continent na bokonzi ya ba noko oyo akufi," ekomi présidence ya RDC na maloba président Tshisekedi atindi nab ana ba Zambie.

M. Kaunda nde azalaki mokonzi ya yambo mboka Zambie.

Asalaka mibu 27 na bokonzi. Akomaki mokonzi ya Zambie na 1964 nsima na lipanda ekolo ezwaki na Grande-Bretagne. Mpe alongwaki na 1991 nsima na kokweyisama na maponami na Frederick Chiluba.

Akumisami sika lokola moto na bwanya kasi b abanda baye bazali kopamela bokonzi na ye ya kanza.

XS
SM
MD
LG