Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame azali na conférence internationale na Abudabi (Emirats)


Président Paul Kagame ya Rwanda na mobembo mwa ye na Cabo Delogado, Mozambique, 28 septembre 2021.
Président Paul Kagame ya Rwanda na mobembo mwa ye na Cabo Delogado, Mozambique, 28 septembre 2021.

Président Paul Kagame ya Rwanda akomi na Abu Dhabi, na Emirats arabes unis, epayi wapi akozala na likita lya politiki lya mokili ya 2021 ( 2021 World Policy Conference).

Likita lyango litali mingi mombongo mpe nkita lokola mpe makambo masusu.

Ekolo na ye Rwanda, ezali mpe na pavillon moko na exposition ezali kosalama kuna.

Ezali mbala ya liboso te ete Rwanda ezala na bokutani boye.

Mibu mileki, Rwanda nde ezwaki mbano ya kozala na pabillon ya kitoko koleka mpo elakisaki elongi ya etuka ya Grands lacs.

Rwanda na Emirats bazali na boyokani malamu. Rwanda ezalai na ba raffineries mingi ya makele to ba mines, misusu miwuta na RDC.

Mikolo mibale mileki, Rwanda na Zimbabwe basalaki boyokani ya mombongo na mobembo ya mikolo mibale limpinga lya mbulatari ya Zimbabwe lisakaki na na Rwanda, mpo na mboka Urugwiro.

XS
SM
MD
LG