Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Elombe" ya film "Hôtel Rwanda" Paul Rusesabagina akatelami mibu 25 ya boloko mpo na "terrorisme"


Paul Rusesabagina akabgami minyololo na moyi pilici nsima na kokatelami mibu 25 mya boloko na Kigali, na Rwanda, 20 septembre 2021.
Paul Rusesabagina akabgami minyololo na moyi pilici nsima na kokatelami mibu 25 mya boloko na Kigali, na Rwanda, 20 septembre 2021.

Paul Rusesabagina, moyi Rwanda atiama na film Hôtel Rwanda mpo na kosunga bato na eleko ya bobomi bonene na Rwanda na 1994, akatelemi mibu tuku mibale na mitano ya boloko na Kigali, na Rwanda.

Akatelamaki likambo nsima na kosambisama mpo na misala mya badongolomeso.

M. Rusesabagina afundama na kopesa maboko na batomboki ya ba FLN (Front de libération nationale) balukaka kokweyisa Paul Kagame na bokonzi. Paul Rusesabagina azalaki kopamela bokonzi ya Paul Kagame.

M. Rusesabagina azali na mibu 67. Libotana na ye liameli ekateli eye mpe elobi M. Rusesabagina abundelaka nde makoki ma bato mpe mibeko kasi lelo bakweyisi na na kobuka mibeko.

XS
SM
MD
LG