Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila azwi nde "masters degree", elobi bakambi ya Université ya Johannesburg


Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC azali kolobela thèse ya doctorat na ye na Université ya Johannesburg, na Afrique du Sud, le 16 juillet 2021. (Twitter/ Tshilidzi Marwala)
Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC azali kolobela thèse ya doctorat na ye na Université ya Johannesburg, na Afrique du Sud, le 16 juillet 2021. (Twitter/ Tshilidzi Marwala)

VOA Lingala etunaki bakambi ba Université ya Johannesburg nsima na nungu nungu ebimaki na lisakoli ya Néhémi Mwilanya, mokambi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya kala Joseph Kabila, sango ya solo epesami ezali ete azwi nde "masters degree" to maitrise.

"Solo, azwi nde masters degree," eyanoli professeur Tshilidzi Marwala, vice-chancelier mpe mokambi ya Fondation Nelson Mandela na Université ya Johannesburg na motuna ya VOA Lingala.

Kasi lobi M. Mwilanya asakolaki na compte Twitter na ye ete Joseph Kabila azwaki thèse na ye ya doctorat na Chair ya Charshi ya Université ya Johannesburg.

" ‘Makanisi mpo bokambi ya ntombwa nsima na bitumba na mboka, lokola na RDC (+Réflexion sur le leadership de développement dans un pays post-conflit, cas de la RDC+) , yango nde mama na likambo ya thèse elakisamaki lelo vendredi 16 juillet 2021 na Joseph Kabila Kabange," ekomaki na compte Twitter M. Mwilanya.

Professeur Tshilidzi Marwala, vice-chancelier mpe mokambi ya Fondation Nelson Mandela na Université ya Johannesburg alobi azalaki ntango M. Kabila alobelaki thèse na ye.

"Tozalo koyoka to koyamba sika mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila. @UJLibrary," ekomi na compte Twitter na ye prof. Tshilidzi Marwala.

Bayekoli misusu mpe ya Université ya Johannesburg bandimi yango mpe batatoli na makanisi to commentaires batie na nse ya post ya prof. Tshilidzi Marwala.

"Nazali na lipumbu to esengo ya kozala moyekoli na institution oyo, lokola moko na bayi RDC, nakomonaka M. J. Kabila kotalisi thèse na ye. Elakisi bios ete ata osala nini na bomoi na yo, kelasi ezali kaka litomba monene," ekomi Gustace Kasenda.

Basusu batotali ndenge mokonzi ya kala azali na kelasi.

Thèse yango ezalaki ya leadership politique na mboka ebimi na bitumba.

XS
SM
MD
LG