Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila akoki komema na bazuzi baye babesi lokumu na ye mpe bapesi bilembo te na "Congo Hold-Up" (Me Nyabirungu)


Mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila azali kosolola na mokonzi ya kala ya Namibie Sam Nujoma na matanga ya mokonzi ya kala ya Zibambwe Robert Mugabe, na Harare, 14 septembre 2019.
Mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila azali kosolola na mokonzi ya kala ya Namibie Sam Nujoma na matanga ya mokonzi ya kala ya Zibambwe Robert Mugabe, na Harare, 14 septembre 2019.

Ba avocats ba Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya Ekolo Congo démocratique, bakebisi ete akoki komema na bazuzi baye balobi ete azwaki misolo mya mboka na enketi ebngami « Congo Hold-Up ».

"M. Kabila azali na makoki ya kokende na misala mya bosembo mpo na kozongsia botosi, lokumu mpe bonene ya nkombo" ye, elobi na bapanzi sango moko na ba avocats na ye, Me Raphael Nyabirungu.

Mpo na Me Nyabirungu, M. Kabila avandaki kimya te mpo na kotikela nzela ba media kokanisa ete andimi bofundi na bango kasi mpo na kokanisa malamu ndenge akopesa eyano.

Ba media zomi na libwa mpe ba ONG mitano, na bokambami ya EIC (Coordination ya réseau européen ya bolukiluki), bapemelaki M. Kabila elongo na bayi libota lya ye mpe bayi nzinga nzinga na ye, kopengwisa pene na millions 140 $ ya misolo mya l’Etat kati na 2013 kino 2018.

Ba media eye bafundaki mpe banque BGIF na kopesa nzela ya kopengwisa misolo myango.

"Boni boni bokambi ya banque moko songolo ya bato songolo, misala ya bokambi mpe bolandeli mpako, miye milakisami na auditeurs (baluki) indé[endants mpe na IGF (Inspection générale ya finances), ekoki kotiama na motu ya mokonzi ya kala ?", etuni Me Nyabirungu.

Nzokande, bayi misala "The Sentry", moko na baye babimisaki sango ya Congo Hold-Up, elobaki na VOA Afrique ete bazali kobanga te bamema na bazuzi mpo maye babimisaki.

Nkasa koleka 5 millions ya mikanda nde etalamaki na baye babimisaki makambo maye matiami na motu ya M. Kabila.

Kasi, Inspecteur général ya Finances ya RDC, Jules Alingete aboyaki makambo ba media baye babimisaki.

M. Alingete alobaki mpe ete yango ebimisaki bopengwisi misolo boye kasi eloko moko te elakisi ete M. Kabila azwaki misolo ba ONG bazali kolobelela.

XS
SM
MD
LG