Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basimba minduki ya CPCA-A64 basengi bolongwi ya Tshisekedi mpe bobimi ya Kabila mpe MONUSCO


Basimba minduki bamibengi ba CPCA-A64 bakangami nsima na bokoki na bango na Bukavu, Sud-Kivu, 3 novembre 2021. REUTERS/Crispin Kyalangalilwa
Basimba minduki bamibengi ba CPCA-A64 bakangami nsima na bokoki na bango na Bukavu, Sud-Kivu, 3 novembre 2021. REUTERS/Crispin Kyalangalilwa

Basimba minduki bakotaki na Bukavu mercredi batindaki mokanda moye molobi ete bazali kosenga bolongwi ya president Félix Tshisekedi, bobimi na RDC ya mokonzi ya kala Joseph Kabila na mboka, ya MONUSCO mpe ya mercenaires ya Rwanda mpe Ouganda.

Ntuku misato na mwambe (38) kati na basimba minduki baye bakangamaki, eyanolaki mokambi ya etuka ya Sud-Kivu, Théo NGwabidje na mituna mya VOA Lingala/

"Coalition ya ba pariotes Congolais pour l’aplication de l’article 64 (ya Contistuion ya RDC), CPCA-A64 esengi botiki mosala ya M. Antoine Félix Tshilombo Tshisekedi mpo na haute traison mpe na kosala na banguna ba RDC mpe ya bana ba Congo," elakisi mokanda etiami manzaka na moto abmibengi general-major Roger Mukono Kizinguwu, na Mwami Jean Mubake MAnankuba, Apôtre Mabruju mpe JuvMfungizi.

Commandant ya 33e région militaire, John Kilubi Ngoy alobi babundi baye motoba bakufaki mpe ba policiers babale na soda moko.

Bayi CPCA-A64 balobi bakondima lisusu te boponami ya président Tshisekedi mpe lisusu kolkea bokonzi bwa ye.

Mpo na bango, M. Tshisekedi azali lisusu te na makoki ya koloba na nkombo ya bana ya RDC.

CPCA-A64 elobi "ezali kondima te misala mya lokuta mya maponami maye masalaki le 30 décembre na baye bakotela ekolo 'babomi tutsi ya Rwanda mpe ya Ouganda' ", kolanda liyebisi na bango.

Babundi baye balobi baboyi mpe kondima bakonzi banso ya politiki mpe ya mampinga.

Babakisi ete basengi bobimi sik’oyo ya mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila na mabele ma RDC.

Bazali kopamela M. Kabila na misala ya mercenaire mpe ya bandongolomeso mpe mbeba ya somo eye ememi bomoi ya bato 18 millions bayebaki eloko te.

Basengi mpe bobimi ya MONUSCO, misala ya ONU, na mabele ma RDC. Lokolo mpe ya babundi y aba tutsi ya Rwand mpe Ouganda.

Lingomba lya litandaki mokanda na bakonzi babikolo biike lokola Etats-Unis, Russie, Grande-Bretagne, Turquie, Allemagne, Royaume-Uni, Italie mpe ONU.

XS
SM
MD
LG