Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Joe Biden aleki ndelo ya kolonga ba Primaires democrats kasi azo'zela Sanders kotika


Joe Biden, vice-président ya Etats-Unis ntango ya président Barack Obama (D) mpe sénateur Bernie Sanders, 2 mars 2020.
Joe Biden, vice-président ya Etats-Unis ntango ya président Barack Obama (D) mpe sénateur Bernie Sanders, 2 mars 2020.

Joe Biden alongi Primaires ya ba démocrates na Mississippi, Misouri, Idaho mpe Michigan mardi na mpokwa na Etats-Unis. Yango ememi kozala lokola molongi na ngambo ya ba démocrates.

Kasi, Joe Biden, vice-président ya Etats-Unis ntango ya président Barack Obama, azali kozela koyeba soki sénateur Bernie Sanders, mbanda na ye na etapi eye ya Primaires ya ba démocrates, akondima kolongwa ba bowelani ya présidentielle ya novembre 2020, momekano na président Donald Trump oyo azali candidat ngambo ya ba républicains.

Na ngambo na ye, sénateur Sanders alongi na Nord Dakota. Kasi bilembo bya Etat ya Washington bizali kozelama. Nzonaknde awa, M. Sanders na Biden bazalaki pene na kokokana.

Na bilembo binso uto ba Primaires ebandaki, M. Biden atiami na lolenge ya kolonga nsima elonga na ye mposo moko moleki na "Super Tuesday" na ba Etats mingi.

Esengeli M. Biden azala na momekano ya présidentielle ya novembre na président Donald Trump. Kasi yambo, esengeli sénateur Bernie andima kotika kowelela mpe kopesa maboko na Joe Biden soki akolinga.

XS
SM
MD
LG