Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jean Bamanisa akweyisami na motion ya censure na Ituri


Jean Saïdi Bamanisa, mokambi ya etuka ya Ituri, 19 novembre 2019. (Twitter/Province de l'Ituri)
Jean Saïdi Bamanisa, mokambi ya etuka ya Ituri, 19 novembre 2019. (Twitter/Province de l'Ituri)

Mokambi ya etuka ya Ituri, Jean Bamanisa akweyisami na motion ya censure mardi na mpokwa na Bunia, na Ituri.

Bakeli mibeko 33 bandimi ete alongwa mpe 48 baboyi.

Bakeli mibeko bazelaki M. Bamanisa koyanola na mituna na bango na ntongo ya mardi kasi akendaki te na likita lyango.

Batindelaki ye mokanda mousu ya kobengisa ye ata mokolo ya mardi kasi ndako inso ya mosala ya gouvernorat ezalaki ya kokangama.

Bakeli mibeko bazongelaki likita lya bango na nsima ya nzanga mpe balekaki na maponami ata M. Bamaisa azalaki te.

Motango mingi kokela kati na bakeli mibeko nde mondimi ete M. Bamanisa alongwa.

Ekomi mbala ya mibale ete bakeli mibeko bapona kolongola M. Bamanisa na ebonga na ye.

Mbala ya yambo, M. Bamanisa akendaka na Kinshasa mpe Cour ya cassation eboyaki mokano ya bakeli mibeko ya Ituri.

M. Bamanisa azongisamaki na ebonga na mokano ya ministre ya mambi ya kati ya mboka ya ntango wana, Gilbert Kankonde.

XS
SM
MD
LG