Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hélicoptère ya FARDC ebungi na ba officiers na Ituri


Basoda ya mampinga ya RDC pene na hélicoptère ya MONUSCO emati na Bijombo, Sud-Kivu, 10 octobre 2020.
Basoda ya mampinga ya RDC pene na hélicoptère ya MONUSCO emati na Bijombo, Sud-Kivu, 10 octobre 2020.

Mampinga ma Ekolo Congo démocratique mazali koluka hélicoptère na yango moko ebungaki wuta lobi nsima na bomati na yango na Bunia na Itrui.

Hélicoptère yango ezalaki moko na biye bizalaki komema ba officiers ya zone militaire ya misatu baye bawutaki etinda na Nord-Kivu mpe Ituri mpe bazalaki kokende na Kisangani na Tshopo, elobi liyebisi lya zone ya misato ya bobateli ekolo.

Baike na mapinga bayebisi ete bayebaki bobungi ya hélicoptère na mobka Niana.

Mampinga ma Ekolo matindi misala mya koluka yango wuta mabele.

XS
SM
MD
LG