Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Guterres, Tshisekedi na Moussa Faki bapameli “coup d’Etat" na Guinée


Président Alpha Condé ya Guinée na bokangami na basoda baye basali "coup d'Etat" na Conakry, na Guinée, 5 septembre 2021.
Président Alpha Condé ya Guinée na bokangami na basoda baye basali "coup d'Etat" na Conakry, na Guinée, 5 septembre 2021.

Président Félix Tshisekedi, bo’ motambwisi ya Union africaine (UA) elongo na Moussa Faki Mahamat, président ya Commission ya UA bapameli coup d’Etat basoda basali na Guinée na kokanga mokonzi ya mboka, Alpha Condé. Kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres mpe apameli coup d’Etat yango.

"Mokambi ya Union africaine S.E Félix Tshisekedi na président ya commission ya Union africaine S.E. Moussa Faki Mhamat bapameli bozwi bokonzi bonso na makasi mpe basengi botikami sika oyo ya président Alpha Condé," elobi liyebisi ya Union africaine.

"Basengi na Conseil ya Kimya mpe Bokengi ya Union africaine kosangana na lombango mpo na kotala maye mazali koleka na Guinée mpe kozwa mikano misengeli," ebakisi mokando VOA Lingala emoni.

Mwa ngonga eleki, ba officiers y aba forces spéciales ya Guinée basakolaki ete bakangi mokonzi ya mboka Alpha condé, batelemisi Buku likonzi mpe ba institutions inso.

Masasi mabetamaki mingi na Conakry, engumba mokonzi ya Guinée kasi moto moko te akufi.

Kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres mpe apameli coup d’Etat yango.

Alpha Condé na mibu 83 akotaki na bokonzi wuto décembre 2010.

Basoda bazwi bokonzi babimisi ba vidéos mpe bilili na kati balakisi présent Condé bakangi mpe balobi ntina bazwi bokonzi.

XS
SM
MD
LG