Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Monusco ekosalisa mpo kokanga mokambi ya batomboki NDC-R


Basoda ya Monusco na lopango na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.
Basoda ya Monusco na lopango na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.

Misala ya Nations unies miyebisi ete mikopesa maboko na bokangemi ya mokonzi ya batomboki baye basangana kati na lingomba NDC-R (Nduma defense Congo-Renové).

Batomboki baye bazali koboma, kozuwa basi na makasi mpe kosala mbeba misusu na Nord-Kivu.

Guidon Shimiray Mwissa, mokambi ya batomboki baye, alukami na auditorat militaire. Mandat d’arrêt na ye mobimaki wuto le 7 juin.

Azali na nse ya etumbu ya ONU, Etats-Unis mpe France. Biloko na ye bikangema.

Kolanda molobeli ya Monusco, Florence Marchal, banda libandela ya mobu moye, bofundami ya pene na nkama misatu ya bozwami ya basi na makasi bosalami likolo ya babundi baye.

XS
SM
MD
LG