Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

USA ekokoba kosalela etumbu likolo na kaniaka na RDC (Peter Pham)


Président Félix Tshisekedi na motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands Lacs, Peter Pham, bapesani maboko na losambo mpo na mboka, na Pullman hôtel na Kinshasa, 9 novembre 2019. (Facebook/Ambassade ya USA)
Président Félix Tshisekedi na motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands Lacs, Peter Pham, bapesani maboko na losambo mpo na mboka, na Pullman hôtel na Kinshasa, 9 novembre 2019. (Facebook/Ambassade ya USA)

Motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham alobi ete ekolo na ye ekokoba kosalela etumbu likolo na kaniaka mpe likolo na kozanga kopesa etumbu mpo na kosunga RDC.

"Tokokoba kosalela makoki manso, ata etumbu, mpo na kosala ete baye bazali na kaniaka, baye batambolaka likolo ya makoki ya bomoto, baye babebisaka kimya mpe bokengi na etuka eye, to baye balukaka kobebisa misala ya démocratie, bamema mokumba (bazwa mbano) ya misala na bango," ekomi na liyebisi Peter Pham.

Motindami ya USA apesi mpiko na Félix Tshisekedi na kosala lisusu makasi mpo na mbongwana mpe makasi ya ba instutitions (misala ya l’Etat) mpe mpo na kobundisa kaniaka,

Président Félix Tshisekedi akutanki na Peter Pham na losambo mpo na mboka le 9 novembre 2019. Basololaki mpe lisusu nsima na yango.

M. Tshisekedi azali na France epayi wapi azali mpe kolobela bitumba bya ye na kaniaka mpe kimya.

XS
SM
MD
LG