Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

DCMP na V.Club baleki kasi Maniema Union alongwe na Coupe d’Afrique


Basani ya DCMP na stade des martyrs, Kinshasa, 12 août 2019. (Facebook/DCMP)
Basani ya DCMP na stade des martyrs, Kinshasa, 12 août 2019. (Facebook/DCMP)

DCMP na V.Club, mibale kati na ba clubs ya RDC babetaki o’mokolo ya eyenga mpo na ba competitions africaines baleki na 16e, kasi AS Maniema Union alongwe.

AS V.Club aleki na 16e de finales ya 24e Ligue des champions ya CAF nsima na elonga 1-0 liboso ya UMS (Union des Mouvements Sports) ya Loum, ya Gabon, na stade des Martyrs, na Kinshasa.

Na match aller, V.Club na UMS bakolaki 0-0. Yango elonga ya mokolo ya eyenga epesi V.Club nzela ya koleka.

DCMP (Daring Club Motema Pembe), ngambo na yango, elongi match retour na yango ya 17e Coupe ya Confédération ya CAF 2-0 liboso ya Stade Renard ya Melong ya Cameroun, na Cameroun.

Kone J. atiyaki mongete ya yambo ya DCMP na 15’ mpe Gikanji D. abakisaki ya ibale, na 30’.

Na match aller, DCMP alongaki lisusu Stade Ranard na Stade des martyrs na Kinshasa na score moko wana 2-0.

DCMP aleki bongo na 16e de finales.

AS Maniema Union ya Kindu nde alongwe na 17e ya Coupe ya Confédération ya CAF nsima na ba tirs au but na AS Pélican ya Lambaréné na Gabon, na Kindu. Na suka ya temps réglementaire, ba équipes babale bazalaki 1-1, lokola na match aller na Yaoundé.

Maniema Union akokoba te na compétition eye, kasi Maniema Union.

XS
SM
MD
LG