Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FCC ekutani nzinga nzinga ya Kabila na Kingakati


Joseph Kabila, mokonzi ya kala, akutani na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 17 février 2019. (Twitter/Joseph Kabila)
Joseph Kabila, mokonzi ya kala, akutani na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 17 février 2019. (Twitter/Joseph Kabila)

Ba membres ya FCC, Front commun pour le Congo, bakutani mercredi nzinga nzinga ya président ya kala Joseph Kabila, mpe balakeli ye bosembo.

Ba signer mokanda moko na kati yango balobi bakotosa botamboli ya lingomba mpe baye nyonso ya lingomba.

Lolanda bokutani liye, FCC ezali na ba députés koleka 340 mpe ezali majorité na parlement.

Batali mpe bamoni ete bazali mpe na majorité ya ba provinces, 25 likolo ya 26, elobi Audin Minaku, mokonzi ya kala ya Assemblée nationale.

Na yango, bazali kozela ete président ya sika, Félix Tshisekedi atiya Premier ministre oyo akowuta na lingomba na bango.

Balobi ete lingomba na bango elongwe plate-forme electorale mpe ekomi plateforme ya gouvernement.

XS
SM
MD
LG