Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Félix Tshisekedi akutani na ntoma ya Amerika na Grands Lacs


John Peter Phan (G), ntoma ya sika ya Etats-Unis mpo na région ya Grands Lacs akutani vendredi na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, 22 février 2019. (Présidence RDC)
John Peter Phan (G), ntoma ya sika ya Etats-Unis mpo na région ya Grands Lacs akutani vendredi na président Félix Tshisekedi na Kinshasa, 22 février 2019. (Présidence RDC)

John Peter Phan, ntoma ya sika ya Etats-Unis mpo na région ya Grands Lacs akutani vendredi na président Félix Tshisekedi na Kinshasa.

Président Tshisekedi na mopaya na ye basololaki mingi kasi makambo balobaki eyebani nanino.

Yambo na bokutani liye, M. Phan akutanaki na kalaka mokonzi ya ministère ya mambi ya bapaya, Atoki Ileka.

Ntoma ya Amerika akutanaki mpe na bato bayike ya Société civile.

Basololaki mpo na oyo etali ba opportinutés (mabaku ya kosala mosala elongo) na kwokonso ya ngonga liye na RDC mpe na région ya Grands Lacs.

M. Phan azalaki vice-président mpe mokambi ya bureau ya Afrique ya esika ya bozindo ya makanisa Atlantic Council.

XS
SM
MD
LG