Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bashegue na bakuluna bakozwama na charge ya gouvernement


Président Félix Thsisekedi na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 février 2019. (Tiwtter/Présidence RDC)
Président Félix Thsisekedi na bokutani na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 19 février 2019. (Tiwtter/Présidence RDC)

Bashegue na bakuluna bakozwama na charge na gouvernement mpe bakolonda formation, kolanda mokano ya bokutani ya Conseil national ya sécurité etambwisamaki mardi na président Félix Tshsiekedi.

"Mokano ezwami ete na esika ya kosalela makasi, na likama ya kozokisa mpe koboma bana na biso moko, to identifier ba oyo balingi, tosangisa bango esika moko mpe tomoema bango, kolanda ba aptitudes (makoki) na bango, na Institut national ya préparation professionnelle (INPP) to na Service national mpo na koyekolisa bango misala, " elobi mokanda ya bokutani liye.

Gouvernement ekozwa en charge koyekola ya misala liye mpe ekotiya bango na ba brigades ya construction agricoles, routières ; ya cantonnage manuel, ya pêche, ya élevage to ya conservation de la nature.

Bokomisi ya bankombo ya bana baye mokosalama na makasi te, kasi soki balingi.

XS
SM
MD
LG