Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maison Schengen ekofugwama na kombo mosusu mpe SN Bruxelles ekozongela 7 vols na mposo


Conseiller spécial ya mokonzi ya mboka RDC mpo ya mambi ya bokengi, François Beya Kasonga, na Chargé d’affaires a.i. ya bokonzi ya Belgique, Philippe Bronchain, batiyaki maboko na mokanda ya boyokani mpo na Maison Schengen, na Kinshasa, le 22 février 2019
Conseiller spécial ya mokonzi ya mboka RDC mpo ya mambi ya bokengi, François Beya Kasonga, na Chargé d’affaires a.i. ya bokonzi ya Belgique, Philippe Bronchain, batiyaki maboko na mokanda ya boyokani mpo na Maison Schengen, na Kinshasa, le 22 février 2019

Bokoyokani mpo bofugwami ya Maison Schengen esalami kati na gouvernement ya RDC mpe ntoma ya mboka Belgique, na Kinshasa.

Conseiller spécial ya mokonzi ya mboka RDC mpo ya mambi ya bokengi, François Beya Kasonga, na Chargé d’affaires a.i. ya bokonzi ya Belgique, Philippe Bronchain, batiyaki maboko na mokanda ya boyokani liye.

Kolanda mokanda yango, Maison Schengen ekofugwama na nkombo mosusu, nsima na boyokani ya ba partenaires ya Espace Schengen.

Ngambo ya RDC mpe ya ntoma ya Europa bayokani mpo te ambassade ya Belgique etiya guichet moko spécial mpo na bakonzi baye bazali na passeports diplomatiques. Visa ekopesamela bango ekozala ya sanza misato na bokoti ebele.

RDC elaki ete ekopesa immunité diplomatique (lokumu ya ba ntoma) na ndako oyo ya misalsa ya Maison Shcengen.

Belgique ekobanda misala mpo na kozwa ba demandes ya ba visa Schengen na mikolo zomi ya misala.

Nzokande, compagnie ya pepo SN Bruxelles yango ekozongela kosala ba vols 7 na mposo, kolanda boyokani mosusu esalami kaka vendredi.

Gouvernement ya RDC ekangaki Maison Schenge na sanza ya décembre moleki lokola eyano na bitumbu biye Union européenne epesaki na bakonzi bayike ya RDC mpo na kobundisa démocratie mpe koboya maponami na RDC.

XS
SM
MD
LG