Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eyoma na bapaya na Afrika ya ngele: Ambassadeur ya RDC abwaki mbela


Pulusu azali kotambola o'nzela n Alexandra, Johannesburg, Afrika ya ngele, 3 septembre 2019. REUTERS/Marius Bosch/File Photo
Pulusu azali kotambola o'nzela n Alexandra, Johannesburg, Afrika ya ngele, 3 septembre 2019. REUTERS/Marius Bosch/File Photo

Ambassadeur ya RDC na Pretoria, Afrika ya ngele, asengi bana banso ya ekolo na ye baye bazwaki likama na mobulu likolo ya bapaya ya mikolo miye ba yebisa ye.

Ntoma Bene Lofongo M’Poko akomi na mokanda ete ba Congolais banso bayebisa na Ambassade ya RDC na Pretoria likama inso bazwaki.

"Mpo na yango, (Ambassade ya RDC na Pretoria) esengi ete bolimboli malamu ya maye malekaki, na bilembo ya solo, bopesama na bureau ya Ambassade eye etalaka makambo ya libanda na : rdcongo@lantic.net Téléphone +2712 434 2455," elobi liyebisi ntoma Bene L. M’Poko.

Na ngambo na bango, bakonzi ya Nigeria bayebisi ete bakobanda kozongisa bana ya ekolo na bango bavandi na Afrika ya ngele o'mokolo ya misato. Bakotinda mpepo mibale mpo na kobanda.

XS
SM
MD
LG