Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etumbu ya mibu 2 kino 5 ya misala makasi na bato 29 basalaki mobulu na ramadan na Kinshasa


Police elaki bosambisami ya ba musulmans basalami mobulu momemi kufa ya policier na Kinshasa
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:01:53 0:00

Police elaki bosambisami ya ba musulmans basalami mobulu momemi kufa ya policier na Kinshasa

Bato tuku misato na moko bakatelami etumbu kati na mibu mibale kino mitano ya misala makasi na bosambisamai ya baye basalaki mobulu na losambo ya mokolo ya kosukisa ramadan ya ba musulmans na stade des martyrs.

Mitano batikami mpe bana banei batindami na tribunal na ya bana.

Ngambo mibale ya Communauté musulmane ya Congo (COMUCO) bazali kowelal bokambi ya lingomba na bango nde babundaki.

Police elobaki moko na ba policiers akufaki mpe bayi COMUCO balobaki mondimi mpe akufaki na masasi na mobulu yango.

Molobeli ya mbulamatari mpe ministre ya sango, Patrick Muyaya akomaki na Twitter ete bakonzi bazali kopesa lisungi na bayi polusu bazwaki mpota na mobulu yango.

XS
SM
MD
LG